Kinshasa, République démocratique du Congo (RDC)

Accueil > Livres Nzoi > Yoka Mampunga, Makalamba, mwana nsomi ya Kongo

Yoka Mampunga, Makalamba, mwana nsomi ya Kongo

mercredi 6 juillet 2016, par Nzoi

Toutes les versions de cet article : [français] [Lingala]

- lingala
- 978-2-36949-000-5
- 178 p., 6500 FC
- yuli 2016.

Makalamba, mwana nsomi ya Kongo, ezali mbuku boye bokomani po ya tina isato. Mbano ya liboso ezali po ya bolingo ya Makalamba, elenge mobali ya engumba Kinshasa, mosali na kopani import-export, akutani na elenge mwasi moko, “Bolumbu” na mobembo azalaki na mboka. Mbano ya ibale, bovandi o Kinshasa, ya elenge mwasi oyo alandi Makalamba esika eye po ya bosali libala ya bango mibale mpe ya bango libota. Mbano ya isato, Makalamba amipesi na politiki, likolo ya bokutani na ye na Makako, moyekoli ya kala na Bruxelles mpe nationaliste munene, oyo apesi ye makasi ya kobunda etumba ya bosilisi bokonzi bua bapaya o kati ya mboka Congo. Ezali bongo mbuku boye bosalemi mpo ya kosepelisa batu nionso oyo balingi ko kanisa maye malekaki o ntango ena ya bokonzi ya ba paya.

Yoka Mampunga (1927-2000) a botami o engumba mokonzi Kinshasa, esika eye avandi. Asali mingi onte ya Administration ya mboko mpe azalaki lisusu Ntoma ya mboka Zaïre. Azali mpe mokomi monene ya mbuku mingi olokota ya lingala.

Liyebisi litali buku oyo

Po na ko tanga buku oyo malamu, esengelaki to longola ba accent oyo ezalaki na buku oyo ebimaki na mobu ya 1976. Lokola lingala e bongwanaka mobu na mobu, esengelaki to bongola lingala ya kala na lingala ya sika.

Liyebisi lia ebandeli litali buku oyo ebimaki na mobu ya 1976

Yoka Mampunga, mokomi wa Makalamba azali mpenza mwana nsomi ya Zaire. Olingi oyeba ye, luka ye na kati ya bana-Kinshasa, o Zone ya Kinshasa. Olingi okutana na ye, tala ye o kati ya bato, epai bato basanganaka na mpokwa, o nsima ya misala mpo ya kowela ntembe, kosolola masolo matali bomoi bwa bango, koseke.

Alingi mingi kovanda na bato esika yoko. Nzokande alobaka mingi te. Mosala mwa ye koyokemela baninga, kokanisa ezaleli ya bato, kotondolo ndenge bato bazali kokamba bomoi bwa bango, ndenge mokili mozali kotambola mpe kobaluka.

Abotami o engumba mei ya Kinshasa o mobu 1927.

Bomwana mpe bonzenga bwa ye bonso kaka o Kinshasa. O nsima ya biteyelo bya yambo mpe bya kati (Humanités ya kala) asali mingi o Leta. Azalaki kutu ntoma ya Zaire o bikolo bisusu.

Sitwaye Yoka Mampunga asili abimisi :
Elakisi Engumba ya Kinshasa.

Sik’oyo alingi abimisa buku isusu ibale :
Mondonga, elenge mwasi ya Zaire.
Boketsu, nkoko moko ya bana Zaire.

Liyebisi

Makalamba ebimaki mbala ya liboso na mobu 1964. Ezalaki na nkombo Makalamba, mwana nsomi ya Kongo. Na ntango wana Ekolo ya biso ekomaki naino na Bobongwani bwa lelo te. Mpe ekomaki naino na nkombo ya Zaire te.

Awa tomomi te lisolo lya Makalamba lilongobani na makambo ma Bobongwani bwa biso, tokanisi te esengeli tokomisa buku yango lisusu, mbala ya ibale. Nzokande na bolandaka bobiso bwa biso, tobongoli nkombo inso ya bompaya mpe totii nko mbo ya bankoko, lokola esengeli sika.

O kati ya buku, nkombo ya Ekolo ya biso etikali kaka Kongo, zambi lisolo likomami o Makalamba likoyebisa makambo masalemaki na eleko ya liboso lya Bonsomi bwa Ekolo mpe liboso lya mokolo mwa 27 oktobele 1971.

Lisolo liye litali mpenza ezaleli ya moto te. Bato batangemi o kati bazali bafulani teo bapakala te. Nkombo ya bato teo ya bisika izali solo teo solo te. Kasi lisolo tosololi awa litali mpenza eleko oyo ezalaki ntango Kongo etikali moke ezwa Bonsomi bwa ye.

Yoka Mampunga